Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Policier akangaka Patrick Lyoya afundami na koboma ye na masasi na Michigan


Photo ezwami na vidoe ya telephone ntango moyi RDC moko abomamaki na masasi policier moko abetaki na koluka kokanga ye na Grands Rapids, Michigan, Etats-Unis, 14 avril 2022.
Photo ezwami na vidoe ya telephone ntango moyi RDC moko abomamaki na masasi policier moko abetaki na koluka kokanga ye na Grands Rapids, Michigan, Etats-Unis, 14 avril 2022.

Procureur moko ya Michigan alobi policier oyo abetaki masasi moyi Ekolo Congo démocratique Patrick Lyoya le 4 avril na Grand Rapids akosamba mpo bobomi to meurtre na second degré.

Azwi mokano moye nsima na mposo motoba ya kotalaka mikanda mya bolukiluki.

"Oyo ezali mokano ya mbangu te nazwaki na pete," elobi procureur ya etuka ya Kent, Chris Becker ntango asakoli mokano mwa ye jeudi.

Procureur Becker alobi ete policier yango amipesi na ba zuzi nsima na kofundami.

Efundeli ya koboma moto na degré ya mibale ezali mbeba enene na Michigan, ekoki kozwa etumbu kino na bolɔkɔ ya bomoi na ye mobimba.

Patrick Lyoya akima bitumba na RDC elongo na baboti baye ntango azalaka elenge.

Atangaka kelasi ya secondaire mpe akomaki kosala.

XS
SM
MD
LG