Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato koleka 9 bakufi mpe koleka 100 bazali komonana te nsima na bitumba basimba manduki na Kwamouth


Soda moko pene na bureau ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) na Yumbi, Maï-Ndombe, RDC, le 20 janvier 2019.
Soda moko pene na bureau ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) na Yumbi, Maï-Ndombe, RDC, le 20 janvier 2019.

Bato koleka libwa bakufi mpe koleka nkama bazali komonana te nsima na bitumba basimba manduki basalaki mokolo mwa mibale moleki na masuwa to baleniere moko na ebale ya Congo, na territoire ya Kwamouth, na etuka ya Maï-Ndombe, elobi moyangeli ya territoire eye Puis Makina.

Bitumba byango bisalamaki pene na mboka Kaba l’école ya Congo-Brazzaville epayi kapita ya mboka mbe abomamai.

Baye babiki na bitumba byango batatoli na moyangeli ya territoire ya Kwamouth été bazalaki koleka motango nkama mibale na bwato to masuwa yango kasi baye bamonani nsima na kobima na mayi bazali kaka ntuku mibale na mibale.

Nzoto ya bato basusu libwa ezwami mpe lokola, elobi mokambi ya mboka na ngambo na Congo-Brazzaville.

Mokeli mibeko ya Kwamouth Moïse Makani, ye mpe andimi na Actualité.cd, ete zonto libwa ezwami mpe bato nkama moko na ntuku libwa bazali komonana te.

Basimba manduki bakoma kosala mobulu mingi na mayi mpe bitumba bizali kokba bisika misusu na Kwamouth wuta mobulu moye mobima na esika eye yambo na sanza ya motoba ya mobu moleki.

Bato mingi bakimaki bisika bavandaka, mpe bokomisi nkombo ya baponi bosalamaki te na Kwamouth.

Nzokande, bakonzi ba Kwilu, na ngambo na bango, bapesaki na maboko ma bayi misala mya sembo mya mampinga bato ntuku mibale na motoba baye bafundami kosala mobulu na bitumba bya Kwamotuh na mboka Wamba.

XS
SM
MD
LG