Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Putin apesi mitindo ete bitumba bitelemisama na Ukraine mikolo mibale


Mokonzi ya Russie Vladimir Putin azali kopesa lisikulu na Moscou, 21 sanza ya zomi na mibale 2022. (Photo by Mikhail Kireyev / Sputnik / AFP)
Mokonzi ya Russie Vladimir Putin azali kopesa lisikulu na Moscou, 21 sanza ya zomi na mibale 2022. (Photo by Mikhail Kireyev / Sputnik / AFP)

Vladimir Putin, mokonzi ya Russie apesi mitindo ete bitumba bitelemisama na Ukraine o'mkolo mwa mitano mpe ya mposo na ntina ya bosepeli ya Noël to eyenga ya mbotama ya Kristu na bayi eyamba ya Orthodoxe.

M. Putin asakolaki mokona mwango o'mokolo mwa minei le 5 janvier 2023 nsima na bosenga ya patriarche Kiril, mokambi ya eyamba ya Orthodoxe.

“Kolanda mbela ya tata mosanto patriache Kirill, napesi ministre ya Bobateli Ekolo mokumba ya kotia botelemisi bitumba bisika binso na ngambo ya Ukraine wuto ngonga ya minuit ya le 6 janvier kino ngonga ya 24 ya le 7 janvier,” elobi M. Putin na liyebisi lya Kremlin, ndako na ye ya mosala.

Mokonzi ya Russie asengi mpe na mapinga ma Ukraine kotosa bopemisi bitumba boye na ntina ya kopesa nzela na orthodoxe kokende kosambela o'mokolo mwa Noël na bango.

Na ngambo na ye, mokonzi ya Amerika Joe Biden alobi ete akanisi ete M. Putin azali koluka nde kopema mwa moke na kobombana na nsima ya mbela ya botelemisi bitumba biye mpo na Noël ya ba Orthodoxes.

Mokonzi ya Russie “azalaki pene na kobeta ba bombes na mapitalo, bisika ya kobatela bana bake mpe ndako ya Nzambe o’mokolo mwa le 25 décembre mpe ntango ya mokolo ya mobu (…) Nakanisi ete azali nde koluka kopema mwa moke,” elobi M. Biden na eyano apesi.

Na ngambo na Ukraine, bakonzi basengi nde M. Putin kolongwa na mboka na bango.

“Russie esengeli elongwe bisika ebotola. Nde bongo kaka ‘botelemisi bitumba ya mwa ntango’ bokosalama,” ekomi na Twitter mopesi toli ya ndako ya mosala ya mokonzi ya Ukraine, Mykhaïlo Podoliak, oyo abengi ezaleli ya M. Putin « bokosi ».

Russie eslaka bitumba na Ukraine wuto le 24 février ya 2022.

XS
SM
MD
LG