Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ministre ya Bobateli ya RDC awangani ete ayokani na Russie mpo na kosomba bibundeli kuna


Président ya Russie Vladimir Putin ayambi président ya RDC (Ekolo Congo démocratique) Félix Antoine Tshilombo Tshisekedi, na bokutani ya Russie-Afrika na Sochi, 23 octobre 2019. Mikhail Metzel / SPUTNIK / AFP
Président ya Russie Vladimir Putin ayambi président ya RDC (Ekolo Congo démocratique) Félix Antoine Tshilombo Tshisekedi, na bokutani ya Russie-Afrika na Sochi, 23 octobre 2019. Mikhail Metzel / SPUTNIK / AFP

Ministre ya Bobateli ya Ekolo Congo démocratique, Gilbert Kabanda Kurhenga awanagni ete atiaki manzaka na boyokani na mbulamatari ya Russie mpo na kosomba minduki kuna, elobi liyebisi ministère na ye ebisimi o'mokolo mwa mitano wuto, 27 octobre 2022, na Kinshasa.

“Sango eye ya lokuta ezali kaka mbano ya makanisi ma bakeli ba yango baye bamonani kozala na mposa mabe,” elobi ministre Kabanda na liyebisi litiami manzaka na mokambi ya ndako ya mosola mwa ye.

“Na mobembo mwa ye ya suka na Moscou, engumba mokonzi ya federation ya Russie, Dr. Gilbert Kabanda Kurhenga, ministre ya Bobateli bwa Ekolo mpe ya Babundi ba kala, na bokeseni na sango ezali kopanzana mingi na ba réseaux soiciaux mpe ezangi solo, atikalaki kotia manzaka soki moke te na nkombo ya mbulamatari ya (RD) Congo na bakonzi ba Russie na boyokani songolo ya bosombi minduki misalama na industrie militaire ya Russie,” eyebisi liyebisi.

Ministre Kabanda asalaki mobembo na Moscou pene na sanza mibale eleki.

Mobembo mwango mosalamaki na bobengisami ya ministre ya Russie ya Bobateli, Sergei Shoigu, na balakisi bilongi ya bikolo pene na nkama na likita lya mbala zomi ya Moscou mpo na Bokengi na molongo.

Bikolo pene na 40 ya molongo bizalaki na bokutani bwango, kati na yango biye bya Afrika.

XS
SM
MD
LG