Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mutombo Dikembe azali kobunda na tumeur ya bongo kasi apesami lisalisi


Mutombo Dikembe, mosani ya kala ya basketball na NBA atomboli mosapi lokola azalaki kosala ntango azalaki kobeta soki alongi monguna, na milulu mya :Hall of Fame:, na Santa Monica, 25 juin 2018. Mandatory Credit: Gary A. Vasquez-USA TODAY Sports
Mutombo Dikembe, mosani ya kala ya basketball na NBA atomboli mosapi lokola azalaki kosala ntango azalaki kobeta soki alongi monguna, na milulu mya :Hall of Fame:, na Santa Monica, 25 juin 2018. Mandatory Credit: Gary A. Vasquez-USA TODAY Sports

Mosani ya kala ya basketball, molakisi elongi ya NBA (Ligue ya basketball ya Amerika na mokili) Dikembe Mutombo Mpolondo Mukamba Jean-Jacques Wamutombo, azali kobunda na tumeur ya bongo mpe kozwa lisalisi na Atlanta, na Etats-Unis, esakoli NBA na liyebisi o’mokolo mwa mposo.

"Mutombo Dikembe azali sika kozwa lisalisi mpo na tumeur ya bongo," elobi liyebisi litiami na compte Twitter ya NBA.

Tumeur ezali livimbi ya esika yoko na nzoto.

Kolanda liyebisi lyango, Dikembers lokola abengamaka “azali kopesama lisalisi lya malamu koleka mpenza na boyokani ya minganga baye bayebi mpenza mosala malamu". "Dikembe na libota lya ye basengi batikamaka kimya sika mpo ete balendela na bokebi lisalisi liye. Batondi bino mpo na losambo mpe maloba malamu", ebakisi liyebisi.

Na mibu ntuku mitano na motoba (56), Dikembe azali moko na ba défenseur to babateli baye batika mpenza sango na NBA.

Abeta koleka mibu to saison 18 na NBA na ba équipes lokola Denver Nuggets, Philadelphia 76rs, Atlanta Hawks mpe New Jersey Nets.

Dikembe Mutmbo atikaka kobeta bo’ professionnel na 2009 kasi ayebana mingi mpe mpo na misala mya kosunga asala na mboka na ye, RDC (Ekolo Cogno démocratique) mpe bisika misusu na Afrika mpe na mokili.

Atonga lopitalo lonene na Kinshasa na nkombo ya mama wa ye, Mama Biamba Mutombo Dikembe. Awuti mpe kotonga na Kasaï eteyelo ya sika na nkombo ya tata wa ye oyo azalaki molakisi.

XS
SM
MD
LG