Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Félicien Kabuga abandi kosamba mpo na Génocide ya  Rwanda na Haye


Félicien Kabuga liboso lya bazuzi na tribunal ya ONU, na La Haye, 29 septembre 2022.

Félicien Kabuga oyo azali lelo na mibu ntuku mwambe na sambo (87) azalaka moko na bato ya mbongo koleka na Rwanda mpe afundami kozala kati na baye bazalaki kopesa mosolo na babomi to ba génocidaires na ekolo eye epayi bato koleka nkoto nkama mwambe babomama.

Azali mpe kati na baye bafundami kozala nsima na bokelami bwa Interahamwe, lingomba lya babundi baye bazalaki mingi bayi kabila Hutu baye babomamaki na Tutsi na 1994.

Félicien Kabuga abandaka misala na ye lokola moto na mombongo, ssima mikolo akomaka moko na bato ba mosolo mingi ya ekolo Rwanda.

Afundami na justice internationale, eye ezali kosambisa ye na La Haye wuto mokolo mwa mineyi le 29 Septembre, mpo na kotiya mosolo mwa ye na eleko ena na ntina ya kosunga bobomi bwa bato mingi to mpe génocide ya Rwanda na mobu 1994.

Lokola azalaka moto ya mosolo o ntango ena, epasaka ye nzela ya kokima justice to misala mya sembo to mpe bosambisami mibu koleka ntuku mibale, liboso ete akangama o mokolo mwa le 16 mai 2020 na France, nsima na kobatama na bikolo Suisse, Zaïre ( lelo RDC) mpe Kenya.

Akangemaka nzinga nzinga ya Paris, engumba moko ya France, ntango azalaka komona te, mpe bato bayike bakinsaka ete akufa.

Félicien Kabuga afundama mpe lisusu mpo na kosangana na bokeli bwa basimba minduki ya ba Hutu Interahamwe, mpe kosunga na kopesa mosolo mpo na kosomba minduki miike miye misungaki na koboma bato koleka 800.000 kati na sanza ya minei mpe ya sambo ya mobu 1994, kolanda mikanda mya ONU. Mingi na kati ya bato baye bakufaki bazalaki ba Tutsi.

Bakisa "génocide", azali mpe kosamba mpo na kotinda na maloba ma ye liboso na bato banso bosalami bwa génocide mpe mpo na mbeba ya bomoto (minyoko mpe kosilisa lingomba ya bato)".

Azalaki mpe moko na bakambi ba Radio-Télévision Libre des Mille Collines (RTLM), eye ezalaki kopanza makanisi ma ba Hutu makosala mabe mpe kotinda bato báyina ba Tutsi.

Afundami mingi mingi mpenza mpo na bobomi boye ba Interahamwe basalaka na mboka Gisenyi (nord-ouest) mpe Kimironko, mboka mibale pene na Kigali.

Na mobu, 2002, ekolo Amerika elakaka kopesa mosolo ba millions mitano ya ba dollars na moto nyonso oyo akoki kopesa nsango na ye mpo na bokangemi bwa ye.

Ntango bakangaki ye, ba avocats ba ye basengaki ete bofundami botelemisama mpo na bokolongono bwa nzoto bwa ye bozlaki malamu te na kotala mibu azali na yango, kasi tribuna ezali kosambisa ye, MTPI, esakoli ete Félicien Kabuga azali na makoki ma kosamba mpe kosambisama.

XS
SM
MD
LG