Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame asengi kotika kofundana kasi kosolola mpo na kimya na Est ya RDC


Président ya Rwand Paul Kagame azali koloba na 77 session ya Assemblée générale ya Nations Unies na siège ya ONU na engumba New York le 21 septembre
Président ya Rwand Paul Kagame azali koloba na 77 session ya Assemblée générale ya Nations Unies na siège ya ONU na engumba New York le 21 septembre

President Paul Kagame azwi maloba na manaka ma mbala ya ntuku sambo na sambo ya Bokutani bonene ya Nations Unies mokolo mwa misato le 21 septembre 2022 na engumba New York.

Na maloba azwaki Paul Kagame alobeli bozangi bokengi na ngambo ya Est ya Ekolo Congo démocratique.

Mpo na ye, bozangi bokengi boye, bozali lolenge loko lokola ezalaki mibu tuku mibale mileki.

Asengi mpo na yango na bato banso kotika kofundana mpe kofanda elongo na nzela ya masolo mpo na koluka nzela ya koluka kimya mpe boyokani.

Mokolo moko yambo na yango, mokolo mwa mibale mwa mposo, Felix Tshisekedi mokambi wa Ekolo Congo démocratique azwaki mpe maloba kaka na manaka ma mbala ntuku sambo na sambo ya Assemblée générale ya Nations unies na New York.

Na maloba azwaki, mwana mboka Tshisekedi alakisaki polele mosapi na ekolo Rwanda na kofunda yango kozala nsima ya basimba minduki ba M23 mpo na kozangisa kimia na ngambo ya Est ya ekolo na yango.

M. Tshisekedi asengi mpo na yango na ONU:

  • kosala ete basimba minduki ba M23 balongwa na lombango bisika bazuami, na ntina ya kopesa nzela na bakima bitumba kozonga bisika bavandaka,
  • kotelemela na polelele ekolo Rwanda na kotika kopesa loboko na basimba minduki
  • kopesa ekolo Rwanda etumbu esengeli,
  • kopesa loboko na misala minso miye mizali kosalema na nzela ya EAC to mpe ya Angola mpo na koluka kozongisa kimya na ekolo Congo Democratique.
  • Mpe kopesa nzela na ekolo Congo Democratique kokoka kosomba mandoki mpo na kozua bokasi bwa kobundisa banguna.


Kaka mardi, president Tshisekedi alakisaki na molongo ete ezali te na mibeko miye mizali kopekisa ekolo na ye na koteka ba blocs petroliers mpe gaziers ndenge ekani kosala yango. Na kosukisa, mwana mboka Tshisekedi alakisi lolenge kani ekolo na ye na bikolo biyike bya Africa bizali kosala manso mpo na misala mya bokokani bwa basi mpe mibali.

XS
SM
MD
LG