Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Vidiye Tshimanga apesami bonsomi mpo na mwa ntango


Vidye Tshimanga (G), mopesi toli ya lokumu ya mokoniz ya mboka Félix Tshisekedi na mambi ma mayele, na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi na Kinhsasa, RDC, 2 aout 2019. Instagram Vidye Tshimanga)
Vidye Tshimanga (G), mopesi toli ya lokumu ya mokoniz ya mboka Félix Tshisekedi na mambi ma mayele, na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi na Kinhsasa, RDC, 2 aout 2019. Instagram Vidye Tshimanga)

Vidiye Tshimanga, mopesi toli ya lokumu ya mokonzi ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi na mambi matali mayele, oyo atikaki mosala mposo moleki nsima na kofundama kosengaka kaniaka, apesami bonsomi mpo na mwa ntango na bokangami bwa ye bolandi boyanoli bwa ye na bazuzi mposo moleki.

Mopesi toli ya kala ya M. Tshisekedi "azongi ndako na ye", elobi mosambeli wa ye, Me Théodore Ngoy.

"M. Vidiye Tshismanga asengaki mpe apesami na parquet bobimisa bwa ye mpo na mwa ntango," ebakisi Me Théodore Ngoy.

Bobimisami bwa ye bopesami kasi na malako maike lokola "komilakisa mbala mibale na mposo liboso lya officier ya ministère public", kolanda maloba ma Me Théodore NGoy.

Vidiye Tshimanga atindamaki boloko bonene CPRK/Makala na Kinshasa nsima na koyanola pene na ngonga sambo mpo na bililingi bitiamaki na ba réseaux sociaux biye bilakisaki ye kosenga kaniaka na bakeli misala ba lokuta baye batielaki ye motambo.

Mopesi toli ya M. Tshisekedi atikaki mosala mposo moleki nsima na bobisami bwa bililingi biye mpe alobaki ete bato baye bakoseli ye makambo mpo na kobebisa lokumu na ye na ya mokonzi ya mboka mpamba te ye mpe azali na mingongo mitalisi ete makambo malekaki ndenge mosusu.

Vidiye Tshimanga oyo azalaki yambo mosali mobongo ya makele alobi ete apesaka nde maboko na bitumba na kaniaka président Tshisekedi asalaka wuto azwa bokonzi.

XS
SM
MD
LG