Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Vidiye Tshimanga atindami boloko ya Makala/CPRK


Vidiye Tshimanga (G), mopesi toli ya lokumu ya mokoniz ya mboka Félix Tshisekedi na mambi ma mayele, na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi na Kinhsasa, RDC, 2 aout 2019. Instagram Vidye Tshimanga)
Vidiye Tshimanga (G), mopesi toli ya lokumu ya mokoniz ya mboka Félix Tshisekedi na mambi ma mayele, na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi na Kinhsasa, RDC, 2 aout 2019. Instagram Vidye Tshimanga)

Vidiye Tshimanga mopesi toli ya lokumu ya mokonzi ya ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi atindami na boloko bonene ya Makala/CPRK nsima na koyanola na parquet ya Cour d’appel ya Kinshasa/Gombe.

Abengisamaki nsima na bobimisami na ba réseaux sociaux ya bililingi kolakisa ye kosenga kaniaka na bakeli misala balokuta baye batielaki ye motambu.

Atindami na boloko nsima na koyanola pene na ngonga sambo na ba zuzi.

Mikolo mileki, Vidiye Tshimanga alobaki ete azali na mingongo misusu ye mpe azwaki miye milakisi ete bakoseli ye makambo.

XS
SM
MD
LG