Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ambassade ya Etats-Unis ekebisi bana ba Amerika mpo na bitumba pene na Goma


DRC Defence Forces repel M23 rebels
DRC Defence Forces repel M23 rebels

Ambassade ya Etats-Unis na Kinshasa esengi bana ba Amerika kosala mibembo te na moneyle ya Ekolo Congo démocratique mpe mingi mingi na etuka ya Nord-Kivu mpo na bitumba bizongeli kati na mampinga ma RDC na batomboki ba M23 pene na Goma.

Ekebisi na liyebisi ebimisi mercredi na site internet na yango, ete ezwi sango ya bitumba ya mandoki biye bikomi na pene 12 miles (pene na kilometre mibale) nzinga nzinga na Goma , engumba mokonzi ya Nord-Kivu.

Bana mboka ba Amerika basengami kosalela ekenge makasi mpe koboya mibembo na t mpe kati na Goma, ekomi ambassade ya Etats-Unis.

Bokebisi boye bopesami ntango mampinga ma RDC masakoli ete bitumba na M23 bisalami pene na Goma mpe pene na ndelo na Rwanda.

"Ba obus koleka 20 mpe ba bombes bibetamaki wuto est kokende na west na nzela ya Goma-Rutshuru epanzanaki," elobaki lelo na liyebisi molobeli ya mokambi ya soda ya Nord-Kivu, général Sylvain Ekenge.

Bitumba bya bizongelaki wuto mposo moleki.

XS
SM
MD
LG