Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cour suprême esakoli Ruto molongi mpe mokonzi ya sika ya Kenya


William Ruto (D) azwi mokanda motalisi elonga naye na maponami ma mokonzi ya mboka na Kanya, Nairobi, 15 aout 2022.
William Ruto (D) azwi mokanda motalisi elonga naye na maponami ma mokonzi ya mboka na Kanya, Nairobi, 15 aout 2022.

Cour supreme ya Kenya endimi lelo bilembo bya maponami ma mokonzi ya mboka bipesi elonga na vice-président William Ruto na koleka 50%.

Moyi opposition Raila Odinga oyo asengaki na bazuzi kotala bilembo bya mpo mbeba, andimi kotosa mokano mya bazuzi kasi alobi andimi yango te.

Mpo na mbala ya yambo na Kenya, Bazuzi banso ba Cour supreme bandimi bilembo biye na mokano mwa bango mpe basakoli bongo William Ruto mokonzi aponami na Kenya, elobi mokambi ya Cour supreme Martha Koome.

William Ruto esengeli sika alapa ndayi le 13 septembre mpo akoma bongo mokonzi ya mitano ya Kenya wuto lipinga lya ekolo eye na 1963.

William Ruto azali na mibu ntuku mitano na mitano.

Na lisikulu asali wuto ndako naye, William Ruto alobi atandi loboko ya bondeko na ba mbanda baye banso mpo akanisi ete bazali banguna te.

XS
SM
MD
LG