Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kenyatta alobi bopesani bokonzi bokosalama na kimya ata azalaki na Odinga


Président Uhuru Kenyatta (D) na vice-président William Ruto, bango babale ya Kenya, na Nairobi, Kenya, 30 aout 2018.
Président Uhuru Kenyatta (D) na vice-président William Ruto, bango babale ya Kenya, na Nairobi, Kenya, 30 aout 2018.

Uhuru Kenyatta, mokonzi azali kotika ebonga nsima na maponami na Kenya, alobi ete transition to bopesani bokonzi bokoki kosalama na kimya, ata ko apesaki maboko na opposant Raila Odinga oyo aboyi kondima elonga ya William Ruto eye Commission electorale esakoli.

Uhuru Kenyatta akutanaki lelo na balakisi bilongi ya biyamba mpo ete bopesani bokonzi bosalama na kimya.

Kolanda misala mya maponami na Kenya, William Ruto alongi na koleka 50,49% liboso lya Raila Odinga.

Lobi mokolo mwa misato, William Ruto oyo azalaki vice-président ya Uhuru Kenyatta kino maponami maye, alobaki sika esengli kokende na lombango na misala mpe alakaki kosala na bato banso.

Raila Odinga oyo azali na mibu ntuku sambo na sambo, azalaka na opposition wuto mibu mingi; asi awela maponami mbala mingi kasi atikala kolonga te.

Mbala inso, Raila Odinga aboyako kondima elonga ya ba mbanda na ye. Elongo na Uhuru Kenyatta, Raila Odinga asambaki na CPI (Cour pénale internationale) mpo mbeba ya bomoto esalamaki nsima na maponami ma 2011 ntango bato koleka 1.133 bakufaki na bitumba bilandaki maponami mpe biloko mingi bibesamaki.

XS
SM
MD
LG