Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kabund abimisi lingomba lya ye mpe apameli Tshisekedi na UDPS kolonga te kotombola mboka


Jean-Marc Kabund azali kopesa mbote na basembeli ya UDPS na Cour constitutionnelle, Kinshasa, 19 2019
Jean-Marc Kabund azali kopesa mbote na basembeli ya UDPS na Cour constitutionnelle, Kinshasa, 19 2019

Jean-Marc Kabund, mokambi ya kala ya UDPS lingomba lya mokonzi ya Ekolo Congo démocratique, mpe mokambi molandi ya kala ya Assemblée nationale alobi président Félix Tshisekedi na lingomba lya ye bakoki te kotombola mboka kino sika mpe bazali kokende na nzela mabe.

Jean-Marc Kabund azwaki maloba mbala ya yambo wuto babengana ye na lingomba UDPS mpe atika ebonga na ye ya bokambi Assemblée nationale.

Mpo na ye, Ekolo Congo démocratique ezali na bosenga ya bakambi basika.

Mokambi ya kala ya UDPS alobi ayoki motema mpasi ndenge asungaki mokonzi ya mboka kozwa ebonga eye kasi akokaki kosala lolenge mosusu te mpo azalaki kotambwisi lingomba liye. Apameli mbulamatri koboya kopesa mikanda na lingomba akeli ACH to Alliance pour le changement mpe alaki kozala na maponami makoya.

Bayi UDPS babenganaki Jean-Kabund nsima na matata mabimaka kati na bayi pulusu bakengelaka ye na babateli ya mokonzi ya mboka.

Yambo na kobengama, mokambi molandi ya Assemblée nationale asakolaki ete atiki mosala kasi akokkisaki elaka eye kaka basanza mingi nsima na yango, le 31 mars eleki.

XS
SM
MD
LG