Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Lucy Tamlyn atiami ntoma ya Etats-Unis na Kinshasa


Lucy Tamlyn, ntoma ya sika ya Etats-Unis na Kinshasa, photo ya département d'Etat
Lucy Tamlyn, ntoma ya sika ya Etats-Unis na Kinshasa, photo ya département d'Etat

Président Joe Biden atie bo’ ntoma ya Etats-Unis na Kinshasa mwasi na nkombo ya Lucy Tamlyn.

Akitani bongo na Mike to Michael Hammer oyo atindami bo’ ntoma ya Amerika na eteni ya liseke lya Africa nsima na kozala na ebonga ya Kinshasa wuto 2018.

Lucy Tamlyn, na mibu ntuku motoba na sambo, azalaki diplomate chargée d’affaire ya America na Sudan epayi atindamaka na Secrétaire d’état Antony Blinken na sanza ya yambo ya 2022.

Azalaka mpe ntoma ya Etats-Unis na Benin wuto 2015 kino 2018 mpe na Centrafrique wuto 2019 kino 2022.

XS
SM
MD
LG