Burundi
Ndayishimiye mokonzi ya Burundi andimi kosolola na basambi minduki bazalaka na RDC

Mokonzi ya Burundi Evariste Ndayishimiye alobi andimi kosolola na mangomba ya basimba minduki ya mboka na ye baye bazalaka na onyele ya Ekolo Congo démocratique.
Alobi yango na bokutani na bapanzi sango.
"Soki RED-Tabara mpe FNL basengi masolo, tobongisami mpo koyamba bango mpe kosolola na bango," elobi mokonzi ya Burundi.
Bakonzi ya Burundi batalaka RED-Tabara lokola lingomba lya badongolo meso, lokola mpe ba FNL (Forces nationales de libération).
RED-Tabara endima été yang onde esalaki bitumba na libanda lya mpepo ya Bujumbura, engumba mokonzi ya nkita ya Burundi, sanza mingi eleki.
RED-Tabara esalaka bitumba wuto 2015 mpe ezali na babundi kati na 500 na 800 mpe ekoba kozwa babundi basika, elobaki na sanza ya zomi na moko eleki opposant Alexis Sinduhije oyo mingi bakanisaka été yen de akelalingomba lya kasi awangaka.
FNL, na ngambo yango, ekabmbamaka na Aloyi Nzabampema ezali eteni ya lingomba lya kala ya batomboki ya AgathonRwasa oyo akoma lelo opposant aya plitiki ya makasi na Burundi.
See all News Updates of the Day
Mampinga ma ekolo Rwanda masalaki bitumba na mabele ma ekolo Congo Democratique

Mampinga ma ekolo Rwanda masalaki bitumba na mabele ma ekolo Congo Democratique, mapesaki mandoki mpe bibundelii ya ndenge na ndenge na basimba minduki ba M23 mpo na kosala bitumba na Est ya ekolo Congo Democratique. Ezali bongo manaka ma banganga mayele to mpe ba expert ya Onu maye mabimi naino te kasi AFP emonaki, nde esakoli yango.
Kolanda manaka maye, batindi na conseil ya securite ya Onu, ba expert baye ba ONU baye basakoli ete bazali na bilembo biye bizali kolakisa na polele ete mampinga ma force de défense rwandaises (RDF) ma ekolo Rwanda mazalaki na bitumba na mabele ma ekolo Congo Democratique na sanza ya zomi mpe ya zomi na moko ya mobu moye. Manaka maye makobimisama na polele mikolo mizali koya, malakisi na polele lolenge kani basimba minduki baye ba M23 bazuaki ba mboka nzike na Est ya ekolo Congo Democratique mingi mingi na etuka ya Nord Kivu na Lisungi ya mapinga ma ekolo Rwanda.
Wuto ebandela ya bitumba biye, Kinshasa efundaka ekolo Rwanda na kozala nsima ya basimba minduki baye, kasi Kigali ewanganaka na koloba ete ya liboso, bitumba biye bilukami na bakonzi ba ekolo RDC mpo na kopusa maponami mazali koya na mboka na bango na mobu mozali koya, mpe bapamela mbulamatari ya RDC nakopesaka maboko na ba FDLR baye babundiska mbulamatari ya ekolo Rwanda wuto mabele ma RDC. Mikolo mileki, Ekolo Etats Unis na bikolo bisusu ba Europa bafundaki ekolo Rwanda na kopesa maboko na basimba minduki baye ba M23.
Sango ya Mokili Lelo: M23 ezali te na masolo ma kimya ma Nairobi
VOA60 Lingala 28 novembre 2022
➡️M23 ezali te na masolo ma kimya mabandi na Nairobi ➡️Batombi 40 ba FNL ya Burundi bakufi na bitumba na bosangani bwa FARDC na mampinga ma Burundi ➡️Eyoma lobi na Bruxelles nsima na Belgique kopola 2-0 na Maroc na Mondial