Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Matata Ponyo asakoli akowelela ebonga ya mokonzi ya mboka na 2023


Augustin Matata Ponyo Mapon, Ministre wa yambo ya RDC, na Kinshasa, 13 avril 2015.
Augustin Matata Ponyo Mapon, Ministre wa yambo ya RDC, na Kinshasa, 13 avril 2015.

Augustin Matata Ponyo ministre wa Yambo ya kala ekolo Congo démocratique mpe sika sénateur asakoli mardi na Kinshasa ete akozala na mponami ma mokonzi ya mboka ya 2023.

Asakoli yango nsima na likita linene lya lingomba lya politiki na ye LDG (Leadership et gouvernance mpour le développement).

"Nayebisi bino ete nandimi kowelela maponami, baningami ba congrès, mpamba te nazali na ndoto lokola eye ya Nelson Mandela Madiba mpe ya Martin Luther King, eye ya komona moto kozongela lokumu mpe bomoto bwa ye bo’ bato banso basusu ya mokili ya loposo inso," elobi M. Matata na lisikulu lya suka ya bokutani (congrès) ya lingomba lya politiki na ye.

"Nazali na ndoto lokola ya bayi RDC banso lokola bino, ya komona RDC kokoma mboka etombwama na nkita na ndakisa ya Corée du Sud eye ezalaki na esika moko na RDC na 1980," ebakisi M. Matata.

Mokambi ya LDG apameli lolenge ngambo moko ya misala mya sembo mpe baike ya mbulamatari mpe misala mya bokambi ekolo bazali kokoba kopekisa ye azala na bonsomi ntango Cour ya cassation esili esakola ete akoki kolandelama lisusu te na likambo lya Bukanga Lonzo.

Afundama na baike na kopengwisa misolo mya mabongisi maye mpo na kosala bilanga mpe kobolo bibwele na RDC, pene na 280 millions $.

XS
SM
MD
LG