Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Soda ya kimya ya Monusco akufi na masasi ya babundi ba Codeco na Ituri


Ba soda ya Monusco ya bataillon ya Inde bamemi moto moko ya mpasi ntango ya bitumba ya ya ba M23 na Kwanja, Nord-Kivu, 14 aout 2012.
Ba soda ya Monusco ya bataillon ya Inde bamemi moto moko ya mpasi ntango ya bitumba ya ya ba M23 na Kwanja, Nord-Kivu, 14 aout 2012.

Soda moko ya kimya ya Monusco (Misala mya ONU na RDC), ya ekolo Népal, akufi na masasi ya basimba minduki bakinisami kozala ya lingomba Codeco na Ituri, elobi bayi ONU.

Farham Haq, molobeli molandi ya kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres asakoli wuto New York ete ezali soda ya ekolo Népal nde akufi na masasi maye.

Tondimi ete soda ya kimya (casque bleu) moko akufaki lelo na ntongo na bitumba, elobi molobeli molandi ya Monusco na Kinshasa, Ndeye Khady Lo.

Soda yango akufi na masasi bayi Monusco babetanaki na lingomba lya basimba minduki na mboka Bali, na territoire ya Djugu, na nord-est ya Bunia, na Ituri, ebakisi Jean Tobie Okala moyi atali sango na Monusco na etuka ya Ituri.

Liwa lya soda yango likomi mposo moko nsima na soda basusu mwambe bakufaki na bokweyisami ya hélicoptère moko na bisika ya bitumba kati na mampinga ma Ekolo Congo démocratique na batomboki ba M23 na Rutshuru, na Nord-Kivu.

FARDC, mampinga ma RDC mapamelaki M23 na kobeta hélicoptère yango masasi mpe batomboki baye mpe bapamelaki FARDC mpo na yango.

Bolukiluki bozali kosalama mpo na yango.

XS
SM
MD
LG