Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ukraine elongoli basoda ba yango na MONUSCO mpo bakende kobundisa Russie


Basoda ba Ukraine bazali kolongwa na libongo lya Beyrouth, Libgan, 20 juillet 2000
Basoda ba Ukraine bazali kolongwa na libongo lya Beyrouth, Libgan, 20 juillet 2000

Mbulamatari ya Ukraine ezongisi na mboka na yango basoda ba yango nkama mibale na ndambo baye bazalaki na Ekolo Congo démocratique kati na misala mya kimya ma ONU, MONUSCO.

Molobeli ya maye matali misala na ONU alobi na liyebisi ete ONU ezwaki nkasa ya mokano ya mbulamatari ya Ukraine koloba ete ezali konzgisa bayi mampinga ma yango, ezala bacivili, baye bakumba ba hélicoptères mpe bisaleli bisusu na Monusco.

Bakisa basoda baye, Ukraine ezali mpe na ba officiers motoba na Ekolo Congo démocratique, lokola mpe ba policiers batano mpe ba experts to banganga boyebi sambo.

Ukraine ezalaka mpe na basoda ba yango na misala to missions misusu ya ONU na bikolo misusu na molongo: Zomi na motoba na Soudan du Sud, zomi na mibale na Mali, mitano na Chypre, minei na Abyei na Sudan mpe misato na Kosovo.

Na ngambo na yango, Russie mpe ezali na basoda ba yango na ba missions koleka ntuku mibale ya ONU na mokili.

Basoda ba kimya na mokili bazalaka pene na nkoto kama moko.

XS
SM
MD
LG