Mikuwa ya motu ya mwana awuti kobotama mizalaka ya kokabwana mpe pete pete. Emonana lokola motu ya mwana mozali na madusu, na français ebangami fontanelle. Ekangamaka nsima na mibu mibale. Fatuma Kalala Alimasi atunaki mpo na yango Dr. pédiatre Orielle Minimbu. Tolanda.
Nkwokoso ekoti na mokili mpo na bitumba Russie ezali kosala na Ukraine. Afrika mpe etikali nsima te. Fatuma Kalala Alimasi azwaki ndimbola ya économiste Denis Tambwe Tshibalanga oyo atanga Sciences Economiques mpe Administratives ya Universite ya Ottawa na Ontario, na Canada. Talanda
➡️ Tshisekedi alaki nzela, lotiliki, mayi mpe kelasi na lisikulu lya na Mbujimayi ➡️ Sénat ya RDC esilisi mosala na yango na septembre ➡️ Mampinga mapanzi batelemeli na molinga mpe lokito na Sudan
➡️ Police epanzi botamboli bobengisamaki na CLC na Kinshasa ➡️ Paulin Makaya apesami ndingisa ya kosala mobembo Congo-Brazzaville ➡️ Mbulamatari ya Nigeria esengi bavandi kotosa mikano ya komibatela nsima na bakoni komata na 500% mpo na variant Delta mpe Omicron
➡️ Ba policiers babale na cicili moko bakufi na milulu ya koboya police ya Rwanda na Goma ➡️ Sassou N'Guesso emikotisi na bokangami nsima na basungi ba ye kozwama na COVID-19 ➡️ Bosambisami ya ba policiers bafundami na liwa ya elenge Olivier Mounga bobandi ➡️ Ramaphosa azangeli mosala nsima
➡️ Moukambi ya kala ya Kongo-central Matubuana akangami ➡️ Turquie epesi mangwele ma COVID-19 15 millions na Afrika ➡️ Mbualamatari ya Ethiopie elobi ebotoli nord nyonso na ba batomboki ba Tigré ➡️ Mali endimi ete Minusca ebakisa ba soda 100 ya Tchad
➡️ Nungu nungu na Goma nsima na nkanda ya bavandi na bobomi ya babale na bango na basimba minduki ➡️ Fayulu asengi bana ba RDC koboya koyei ya police ya Rwanda na Goma ➡️ Bayi Congo-Brazzaville bapekisami kokende mibembo ya Qatar
➡️ Ebola ya mbala zomi na misato esili na Beni ➡️ Bato batano bakufi na likama lya motuka na nzela ya Masimanimba, na Kwilu ➡️ Basali ya Mosengjo bakangi ba bureaux ya Mairie mpo na kosenga lifuta lya bango na Congo-Brazzaville ➡️ France ezwi mikano mya COVID-19 mpo na mibembo na Royaume-Uni
➡️ Tribunal apesi mitindo ete Jacob Zuma azonga boloko ➡️ Parquet général ya France ekateli Claude Muhayimana mibu 15 ya boloko mpo na génocide rwandais ➡️ Macron azali kokende na Mali kokuna na Assimi Goïta ➡️ Biden azali kokende kotala ba victime ya "tornade" na Kentucky
➡️ RDC elingi esakola suka ya Ebola na mbala 11 na Nord-Kivu ➡️ Batu koleka 50 bakufi na bokweyisami ya mabele na mine na Nord Ubangi ➡️ Etats-Unis epesi etumbu ya bayi RDC mwambe mpo na mongongo ya banyama bapekisama ➡️ Bato koleka 50 bakufi na explosion ya camion-citerne na Haïti
➡️ Tshsiekedi asengi bomoko na mboka na kobundisa baye babomaka na est ➡️ Koffi Olomide aketelami sanza 18 ya boloko na bofundami ya babibini baye na France ➡️ Paul Mayaka apekisa kozwa mpepo mpo na kokende Londres ➡️ Ramophosa azwami na COVID-19
➡️ Mampinga ma Uganda na ya RDC makeli mapitalo mabale na Beni ➡️ Opération "Coup de poing" epekisa milulu mya libala mpo na COVID-19 elongwe naCongo-Brazzaville ➡️ MPLA epani Lourençco mpo na présindetielle ➡️ Pene na 25 bakufi na mpela na Kentucky
➡️ Babundi ba makoki ba bomoto zomi bobamama wuto 2015 na Nord-Kivu mpe Sud-Kivu ➡️ Mpela ekasi ebebisi ndako, biteyelo mpe ezokisi bato na Maniema ➡️ Tribunal militaire ekateli officier moko mibu 20 ya boloko mpo na kozwa elenge mwasi na maksi na Kikwit ➡️ Julian Assange akotindama na Etats Unis
➡️ FARDC ezali nu bitumba na CMC eye emakaki kosikola babundi ba yango na Rugari na Nord-Kivu ➡️ Basali basato ba HCR bazoki na masasi ma masimba minduki na Lubero ➡️ APLC ezali na misala mya kokebisa bato na kaniaka ➡️ Tanzanie ezali kokanisa mibu 60 mya lipanda lya yango
➡️ FARDC eyokani na Monusco mpo na kopesa yango makasi ya kobundisa basimba minduki ➡️ Guterres amitie na bokangami nsima na kokutana na moko bayi ONU azwami na COVID-19 ➡️ Chancelier allemand ya sika azwi bokonzi
➡️ Ba ADF babomi ba civili batanona Walese Mbokutu na Iutri ➡️ Tshisekedi na Lourenço bazali kokutana na Sassou na Brazzaville ➡️ Bato 17 bazwami na cholera na Misisi na Fizi Rendez-vous sur www.voalingala.com
-Bato mingi bakufi na bozindi ya bwato moko na lac Kivu pene na Kalehe -Ba dentistes bavandaki liboso lya hôtel ya gouvernement na Kinshasa mpo na kosenga bobongisami ya prime de risque -Blinken azali na nzela ya mobembo na Kenya, Nigeria mpe Sénégal -Tribunal endimi bosenga ya Trump
+"Nini tosali te" mpe "Lettre à ya Tshitshi", nzembo mibale ya MPR Commission ya censure na RDC epekisi +Ba députés banei ya Kwango bakotisi motion de défiance mpo na bolongwi ya mokambi ya etuka +Kamala Harris azali kokutana na Macron na Paris +Mbulamatari ya Ethiopie ekangi 72 chauffeurs ya PAM
-Ba FARDC babotoli Chanzu, Runyinyi na Rutshuru +Ba boxeurs ya RDC bakimi na Serbie nsima na championnats du monde +France ezongisi bikeko ya bonkono na Bénin
Voir plus