Minanga bayebisi ete M. Kolelas azwamaki na COVID-19.
PRÉSIDENTIELLE AU CONGO BRAZZZAVILLELe candidat Guy-Brice Parfait Kolélas est hospitalisé depuis vendredi (Covid-19). De son lit d’hôpital il demande à ses partisans de se battre pour la victoire à la présidentielle tandis que lui se battra pour en sortir vivant pic.twitter.com/gIYG9B3UqB
— thierry ngogang (@Thierry_Ngogang) March 20, 2021
"Nazali kobunda na liwa kasi nasengi bino botelema. Bokende kopona mpo na mbongwana," elobi M. Kolelas na vidéo moko.
M. Kolekas akweyaki na meeting na campagne.
Bana ba Congo-Brazzaville bakitaki na ba bureau ya maponami mpo na kopona kati na bato sambo.
Président Sassou azali kati na bango lokola mpe Mtahias Nzon na M. kolelas.
Mokambi ya batali ba Union Africaine, Dileita Mohamed alobi ete maponami masalami na kimya mpe na bonsomi ya baponi.
Bayi mampinga mpe bokengi baponaki mikolo misato mileki kasi bilembo bya bango bikotangama nzela moko na biye bya bato banso.