Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ukraine esengi botelemisi ya bitumba na masolo ma yambo na Russie

Bayi Ukraine na Russie, kati na bango mosungi ya présiden Vladimir Putin ya Russie Medinsky (2G), mosungi ya président ya Ukraine ykhailo Podolyak (2D) na masolo na etuka ya Gomel, na Biélorussie, 28 février 2022.

Bakokutana lisusu mpo na kokoba masolo kasi mokolo mpe ntango eyabani te.

Masolo ma yambo kati na balakisi bilongi ba Ukraine na bayi Russie masalami na Bélorussie.

Bakokutana lisusu mpo na kokoba masolo kasi mokolo mpe ntango eyabani te.

Bayi Ukraine basengi ete bitumba bitelemisa kaka sika.

Nzokande mampinga ma Russie mazali kokoba kobakisama na Ukraine kasi bakutani na botelemeli ya bayi Ukraine mpe na ngambo esusu bayi west mpe molongo bazali kokoba kobakisa bitumbu ya nkita likolo na Russie.

Lobi, président Valdimir Poutine asengaki mampinga maye kotia na nzela ya bitumba bibundeli ya Nucléaire mpo afundi bayi west na kobangisa ye mpe na bitumbu, alobi, bizangi sembo.

XS
SM
MD
LG