Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi azali nde na Bruxelles mpo na hernie discale (Présidence)


Président Félix Tshisekedi azali komata na motuka na Palais de la Nation, Gombe, Kinshasa, 20 février 2022
Président Félix Tshisekedi azali komata na motuka na Palais de la Nation, Gombe, Kinshasa, 20 février 2022

Président Félix Tshisekedi azali nde na Bruxelles mpo na komisalisa na hérnie discale, elobi misala mya présidence na liyebi na compte Twitter na yango.

Liyebisi lyango lilandi sango molobeli ya président Tshisekedi asakoli lobi loleki (jeudi), kaka na Twitter, na kosakolaka ete mokonzi ya mboka azwi lipaso te.

Ezalaki eyano apesaki na journal en ligne ya Belgique Libre Afrique eye ebimisaki sango ete président Tshisekedi azwaki lipaso lya motema.

Présidence ya RDC, endimi lelo ete Félix Tshisekedi azali kino sika na Bruxelles, engumba mokonzi ya Belgique mpo na kosalisama na hernie discale.

Bayi nzinga nzinga na mokonzi ya Ekolo Congo démocratique balobi lisusu ete mobembo mwambo mozali libaku lya botalisa nzoto na ye na minganga lokola mobu monso.

"Mokonzi ya mboka azali malamu," ebakisi liyebisi lya présidence.

Bilili ya mokonzi ya Ekolo Congo démocratique mpe bityami pene na minganga bazali kosalisa mpe kotala nzoto na ye.

Président Tshisekedi akozwa mwa mikolo ya kopema na libota lya ye mpe ya koyamba mpe kotala bato na mokano mwa ye.

XS
SM
MD
LG