Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi afungoli Musée national ya RDC

Président Félix Tshisekedi afungoli o’mokolo ya poso musée national ya sika ya RDC. Ndako eye ya bobombi mpe kolakisa zebi mpe ntoki (culuture et arts) ya Congo na lisitwale na yango mobimba, etongami na lisungi ya ekolo Corée du sud na misolo 21 millions $ nsima na sanza 39 ya misala. Ezali monene 6.000m2. Elakisi biloko koleka 12.000.

Na ngambo na bango, ba artistes (bato na ntoki) basengi mokonzi ya mboka kozongisia na Congo biloko binso ya ntoki ya ekolo eye epanzana na mokili mobimba.

XS
SM
MD
LG