Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

PM Wilmes ya Belgique asololi na Tshisekedi mpo na partenariat na RDC


Premier ministre belge Sophie Wilmes na bokutani na président Félix Tshsiekedi na Palais de la nation na Kinshasa, 6 février 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Premier ministre belge Sophie Wilmes na bokutani na président Félix Tshsiekedi na Palais de la nation na Kinshasa, 6 février 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Premier Sophie Wilmes ya Belgique na linpinga ya mbulamatari na ye bayambamaki na président Félix Tshisekedi jeudi 6 février na Palais de la nation na Kinshasa.

Ministre ya Yambo ya Belgique Sophie Wilmes alobi ete ekolo na ye elingi kosunga ekolo Congo démocratique mpo mpo nakoteya mampinga mpe baye ya bokengi na ba policiers..

"Partenariat belgo-congolais ekoki kosalama na nzela mingi. Ezali na partenariat eye ekoki kosalama na maye matali mampinga, nkita, policie, bokengi, misala ya bosembo mpe mingi mpenza nzela ya malakisi. Biso tozali boyebi na Belgique, soki Congo esengi biso tokozala na esengo ya kokabola yango," elobi Sophie Wilmes nsima na bokutani na M. Tshisekedi.

Mokambi ya mbulamatari ya Belgique alobi mobembo mwa ye mokotika na misala ya kobongisa bondeko kati na bikolo mibale.

Yambo president Felix Tshisekedi akendaki na septembre na Belgique.

Mpe na sanza ya misato to minei limpinga ya ba ministres ya Belgique bakozonga lisusu na RDC mpo na coopération.

XS
SM
MD
LG