Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Nkisi ebikisi babeli ya Ebola na Est


Nkisi ebikisi babeli ya Ebola na Est
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:01:04 0:00

Bakoni babale ya Ebola babikisami na Goma mikolo zomi na moko nsima na kozuwaka lisali na ba molécules mibale epesemelaki bango. Bakonzi ya mambi ya bokolongono balobi ete ba molécules yango ezali makasi mpo na kobikisa. Dr Jean Jacques Muyembe alobi ete sik’oyo emonisami ete Ebola ekoki kobikisama mpo nkisi na yango ezuwami. VOA Lingala etunaki Coodonateur général ya bitumba na Ebola, Dr. Yves Ahuka. Bato babale baye bakisimi bazali molongani mpe bebe ya moluki wolo oyo akufaki sanza eleki na engumba ya BEni. Ezalaki moto ya mibale ya kozuwama na bokono boye na Goma. Ezali kobisa 30 à 35% ya babeli.

XS
SM
MD
LG