Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Maradona akufi na mibu 60


Maradona
Maradona

Diego Maradona, "Djogo" ya lisano lya ndembo, akufi na mibu 60.

Moto ayebanaka mpo na mongete na ye motikala kobengama “loboko ya Nzambe" akataki motema mercredi na Argentine.

Abimaki lopitalo pene na Buenos-Aires le 12 novembre epayi wapi alekisaki mikolo mwambe nsima na lipaso na moto mpo na libanga lya makila.

Azwaka lipaso ya motema na 1986.

Bakambi ba ekolo na ye Argentine batie matanga ma mikolo misato wuto mercredi.

Mokili mobimba mingi bayi masato bazali kolela ye.

Abetaka na équipe nationale ya Argentine mpe abima molonngi ya molongo mbala misato.

Abetaka mpe na ba clubs mingi lokola Naples ya Italie.

XS
SM
MD
LG