Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Lamuka esakoli ete "marche" etikali le 29 septembre ndenge ebongisamaki


Martin Fayulu na Adolphe Muzito na Bruxelles, Belgique, le11 novembre 2018.
Martin Fayulu na Adolphe Muzito na Bruxelles, Belgique, le11 novembre 2018.

Bayi Lamuka basakoli ete botamboli babengisi o’mokolo mwa le 29 septembre botikali lokola bango babongisaki.

Bapesi lisakoli na bango nsima na mokambi ya etuka ya Kinshasa gentiny Ngobila kopekisa, o'mokolo mwa mitano, botamboli mpe milulu inso wuto libanda lya mpepo lya N'Djili kino pont ya Matete mpe pene na ndako ya l’Etat lokola Parlement.

Martin Fayulu mpe Adolphe Muzito balobi ete botamboli bwa bango bokobanda na quartier 3 na Masina kino na na Palais du Peuple, ndako ya parlement.

Bayi Lamuka bakundoli ete bakambi ba etuka ya Kinshasa batiki motambwisi ya Assemblée nationale Mboso Nkodia Mpuanda mpe bayi UDPS kotambola mpe kosala milulu na Masina ata bopekisi bozali.

Gouverneur Ngobila asengi mangomba malingi kotambola kokotisa mokanda mosusu mpo na kosenga kotambola na bisika bipesami ndingisa.

Adolphe Muzito apameli bato baike na koluka koboma to kasala mambe na bakambi ba Lamuka.

XS
SM
MD
LG