Ghana emeki kasi ekweyi 2-3 liboso lya Portugal na Ronaldo
Ghana esalaki makasi ya kozongisa mingete mibale kasi Cristiano Robaldo na Portugal basi balekaki liboso na mingete misato na match na bango ya groupe H ya Mondial Qatar 2022, o'mokolo mwa minei. Match esuki bongo Ghan 2-3 Portugal.

1
Attaquant ya Portugal #07 Cristiano Ronaldo azali kobeta penalty na match na Ghana ya groupe H ya Mondial Qatar 2022 na stade 974, Doha, 24 novembre 2022. (Photo PATRICIA DE MELO MOREIRA / AFP)

2
Attaquant ya #11 Joao Felix (G) atie mongete na match na Ghana na groupe H ya Mondial Qatar 2022 na stade 974, Doha, 24 novembre 2022. (Photo Glyn KIRK / AFP)

3
Attaquant ya Portugal #15 Rafael Leao (G) atie mongete liboso lya moyambi ya Ghana #01 Lawrence Ati Zigi (D) na match ya groupe H ya Mondial Qatar 2022, na stade 974, Doha, 24 novembre 2022. (Photo Glyn KIRK / AFP)

4
Attaquant ya Portugal #07 Cristiano Ronaldo atutani na moyambi Ghana #01 Lawrence Ati Zigi na match ya groupe H ya Mondial Qatar 2022 na stade 974, 24 novembre 2022. (Photo MANAN VATSYAYANA / AFP)

5
Attaquant ya Portugal Cristiano Ronald asepeli nsima na kotia mongete ya mibale ya ekipi na ye na penalty na match na Ghana na groupe H ya Mondial Qatar 2022 na stade 974, Doha, 24 novembre 2022. (Photo PATRICIA DE MELO MOREIRA / AFP)