Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

France eniati Corée du Nord 4-0 na Mondial féminin ya basi


Basani ya ndembo ya ekolo France nsima na elonga likolo ya Corée du Nord na Coupe du monde ya basi, Parc de Prince, Paris, France, 7 juin 2019.
Basani ya ndembo ya ekolo France nsima na elonga likolo ya Corée du Nord na Coupe du monde ya basi, Parc de Prince, Paris, France, 7 juin 2019.

Ekolo France ebeti Corée du Nord mingete 4-0 na match ya liboso ya Coupe du monde ya basi ezali kobetema na France.

Mosani ya Wenie Renard ya France atiyaki mingeti mibale na moto.

Eugénie Le Sommer afungolaki mongete na 9e minute mpe capitaine Amandine Henry asukisaki na 85e minute.

Match yango ebetemaki na stade Parc de Prince na Paris. Ezalaki ebandeli ya coupe du monde 2019 ya basi.

XS
SM
MD
LG