Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Alanga nzembo Héritier akangami mpo na bililingi ya ekobo


Alanga nzembo Héritier Watanabe, 15 juillet 2017. (Facebook/ Héritier Watanabe)
Alanga nzembo Héritier Watanabe, 15 juillet 2017. (Facebook/ Héritier Watanabe)

Alanga nzembo Héritier Watanabe asimbami na misala bosembo nsima na bililingi bya ekobo na ye kotambola na réseaux sociaux.

Mokambi ya police na engumba Kisnasa, commisaire divisionnaire Sylvano Kasongo andimi ete Héritier asimbami na police.

"Ministère public nde efundi ye. Bato basali makele mingi. Alendelami mpo na mbeba ya kobebisa bizaleli (outrage aux bonnes mœurs)," eyebisi na TopCongo FM Com. Div. Kasongo.

Kolanda maloba ma mokonzi ya police, Héritier Watanabe atiyami na bureau ya Procureur général na Cour d’appel ya Kinshasa/Gombe.

Mwasi oyo amonisamaki na bililingi elongo na alanga nzembo akeyi mpe lokola komomita na parquet ye moko, kolanda com. Div. Kasongo.

Na ngambo na ye, alanga nzembo Héritier Watanabe mpe afundi na bazuzi baye bayibaki bililingi ya makambo ma ye na tshombo na ye to cloud na ye mpe bapanzaki ya na ba réseaux sociaux.

Mpo na ye, bato baye bayebani te.

XS
SM
MD
LG