Paul Kagame, mokonzi ya Rwanda ayanoli ete ayebi te soki mampinga ma Rwanda mazali kobunda na monyele ya Ekolo Congo démocratique na mopanzi ya batomboki ba M23.
Ezalaki na biyano apesaki lobi loleki na mopanzi nsango ya CNN Larry Madowo.
Atako azali mokambi ya mampinga ma ekolo na ye, RDF, Kagame alobi "ezali na makambo mingi ayebi te lokola soki batuni ye soki ezali na likambo lyoko lizali kotia na likamba bokengi ya Rwanda na RDC eye Rwanda esengeli kopesa eyano".
Ayanoli, "ekosengele kozela !"
Mpo etali soki ezali na likama ete bitumba bingala kati na etuka eye ya Afrika, ayanoli mpe lisusu ete ayebi te kasi akanisi te ete ezali na moto moko oyo alingi bitumba.
Mpo na ye, ata Felix Tshisekedi mokonzi ya RDC atindikami na baye balakaki kopesa ye maboko.
Mpo etali kokokisa ye na Vladimir Putin na bitumba azali kosala na Ukraine na nkombo ya kobatela kabila ya moke ewuta na Russie mpe na nse na yango kozwa makele, Kagame alobi azali oyo ye azali mpe asengeli kosala nyonso mpona kolonga kobika na nyonso eye ekoki kotia bomoi na likama na ekolo na ye.
Alimboli lisusu ete bobandi ya bitumba biye bowuta na RDC mpe lisusu Rwanda ezali na coltan kasi ayebi te soki ezali mingi koleka eye ya RDC.
Forum