Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bibembe 773 ezwami mpe 2.800 bato ya mpota bakomi na mapitalo nsima biutmba na Goma (Mbulamatari)


Bayi Croix rouge mpe Comité international ya croix rouge bazali kolota nzoto ya bato bakufi na bitumba na Goma. Nord-Kivu, 01 sabza ya yambo 2025. Photo by ALEXIS HUGUET / AFP)
Bayi Croix rouge mpe Comité international ya croix rouge bazali kolota nzoto ya bato bakufi na bitumba na Goma. Nord-Kivu, 01 sabza ya yambo 2025. Photo by ALEXIS HUGUET / AFP)

Mbulamatari ya RDC epameli mampinga ma Rwanda na batomboki ba AFC/M23 kosala bobomi ya somo na bitumba basalaki mpo na kobotola Goma.

"Mampinga ma Rwanda basali bobomi ya monene na moyi makasi na miso ya bato banso na mokili," elobi molobeli ya mbulamatari Patrick Muyaya na bokutani na bapanzi nsango na Kinshasa.

"Bibembe koleka 773 mpe bato bazoki mpota koleka 2.800 bazali na mapitalo na Goma," ebakisi ministre ya mambi ma Bokolongo Dr. Samuel Roger Kamba.

Ministre ya mambi ma Bokolongo alobi motonga mwa bawei mpe ya baye bazoki mozali nde monene mingi solo mpo bato mingi bakoki te kokoma na mapitalo mpo masasi mpe bombes ezalakikobeta mpe kokweya mingi,

"Tozwaki nsango bato basusu bakundaki bandeko ba bango na mapangu mpo bakoki te kobima ntango masasi mazalaki kobeta," esakoli M. Muyaya.

Dr. Kamba apameli batomboki ba M23 kotinda na makasi bavandi ya Goma kosokola makila mpe kolongola bibembe na maboko na bozangi mino mpe bisaleli ya bobateli na makama.

Apameli mampinga ma Rwanda mpe M23 kobeta ba bombes na mapitalo mpe ndenge babenganaki bakoni na mapitalo lokola na Minova )Sud-Kivu) epayi baye bazali ba bokono bwa Mpoc babengamaki.

Forum

XS
SM
MD
LG