Misala mya bikolo bya Bapaya ya ekolo Belgique esakoli été ebengisi ambassadeur ya Kinshasa mpe ebengi mpo na mituna ambassadeur ya RDC na Bruxelles mpo na kopamela bondimama ya etumbu ya liwa epesameli na moko na bana mboka na ye Jean-Jacques Wondo na bosambisami ya kolokua koboma mokonzi ya RDC Felix Tshisekedi na sanza ya mitano ya 2024.
Bondimami ya tumbu eye bosalami na bosambisami ya kozongela o mokolo mwa mosala moko.
M. Wondo, nganga ya mayele na matali bokengi ya RDC, atalami na misala mya sembo mya RDC bo "moto akanisaki mpe atindaki" boluki koboma mokonzi ya RDC.
"Bokitisami na liwa ya mwana ya ekolo na biso bokoki te kozwama na bopete. Bokozala na mbano na boyokani kati na bikolo bya biso babale, eye tokolandela makasi," elobi ministère ya mambi ya bikolo bya Bapaya ya Blegique.
Bato 37 bakatelamaki etumbu ya liwa na kati ya sanza ya libwa na bosambisami bwa bango.
Forum