Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba Eléphants ya CIV balongoli ba Léopards ya RDC na 1/2

Milieu ya Côte d'Ivoire Franck Kessie (D) #8 azali kowelela ndembo na oyo ya RDC# Samuel Moutoussamy (F) na match ya 1/2 finale ya CAN 2023 na stade Ebimpe (Alassane Ouatarra), Abidjan, 7 sanza ya mibale 2024.

Ba Eléphanst ya Côte d'Ivoire balongoli ba Léopards ya RDC na 1/2 finale ya CAN 2023 na 1-0 o'mokolo mwa mosala misato na stade Elimpé (Alassane Ouatarra) na Abidjan.

Sébastien Haller atiaki mongete ya ba Ivoiriens na 65'.

Ba Léopards bakowela sika molongo ya misato na Bafana Bafana ya Afrika ya Ngele baye balongwe na kopola 1 (2)-1(4) na ba tirs au but liboso lya ba Super Eagles ya Nigeria.

Basani ba RDC babandaki match malamu kasi balembaki nsima na mwa ntango.

Balataki singa ya moyindo na loboko ya mwasi mpo na koloa na mokili ete bato bazali kokufa mpe komona mpasi na bitumba biye bizongeli kongala na Sake, Mungunga (Goma) mpe Sasha, na nzela kati ya Nord-Kivu na Sud-Kivu.

Ba bombes ezali kokweya na Goma na Sake mpe bato bazali kokima Sake mpe bisika misusu mpo na bitumba byango.

Forum

XS
SM
MD
LG