Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Handball/CAN 2024 : Bapoli liboso lya Guinée mpe bazangi kozwa ebonga na mondial

Mosani ya RDC Jack Kizonzolo (D) azali kosimba moninga wa ye Guathier Nvumbi na Championnat ya molongo ya Handball na match ya group D kati na RDC na Bahrain, na Caire, Egypte, 19 sanza ya yambo 2021.

Ba Léopards ya babali ya Ekolo Congo démocratique bapoli 26-29 liboso lya Guinée na phase finale Coupe d'Afrique des nations ya Handball na Caire na Egypte mpe bazangi bongo esika na mondial ya lisano liye.

Yambo na match eye, ba Léopards balongaki Maroc 37-36 na match ya kotia bango na kati molongo ya mitano kino na mwambe na CAN eye.

Kasi, basani ba RDC bakokati na match Guinée.

Yambo na yango, balongaki match mibale ya libandela, na Zambie mpe na Rwanda mpe bapolaki match na Cap Vert.

Forum

XS
SM
MD
LG