Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moko na banganga ya boyebi ya maponami amibomi na komibwaka wuta likolo na hôtel na ye


Mosala moko ya Union européenne azali kotala maponami na Kinshasa, 3 décembre 2011.
Mosala moko ya Union européenne azali kotala maponami na Kinshasa, 3 décembre 2011.

Expert to nganga ya boyebi moko ya mambi ya maponami ya Union européenne amibomi na komibwaka wuta likolo na hôtel na ye, endimi bayi CENI, misala mya maponami lokola mpe basali ba bokengi ba hôtel Hilton na Kinshasa epayi mowei azalaki kovanda.

Moko na basali ba CENI alimboli na VOA Lingala ete moto yango, mondelo, amibwakaki wuta 12e étage ya hôtel o'butu yambo na mokolo mwa mposo, kolanda nsango epesameli bango.

Moko na basali ba bokengi alobi ete ayoki nsango yango kasi hôtel epesi lisusu bango nzela ya kotala bililingi bya bokengi te.

Na étage ya liboso, na Hôtel Hilton epayi limpinga lya VOA lizali mpe kovanda mpo na maponami, emonaki ete wuta sika mikolo mibale misala mizali kosalama mpo na kobongisa esika pene na ascensseur epayi likama lyango lisalamaki.

Mesa, talala mpe biloko misusu bipnazanaki.

Basali ba esika yango bandimi ete moto moko akweki na esika yango kasi bapesi nsango ya siki siki te.

Nzokande, bokengi makasi botiami na esika eye mpe procureur mpe bayi misala mya bolukiluki bazali kosalama boluki na esika eye.

Forum

XS
SM
MD
LG