Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba Wazalendo babengani M23 na Kibarizo


General Janvier Bingo Karairi, mokambi ya ba Mai Mai liboso lya babundi ba ye na Lukweti, Nord-Kivu, 22 sanza mwambe 2012.
General Janvier Bingo Karairi, mokambi ya ba Mai Mai liboso lya babundi ba ye na Lukweti, Nord-Kivu, 22 sanza mwambe 2012.

Babundi ba Wazalenduo bacivili baye babundaka na ngambo ya mampinga ma Ekolo Congo democratiki, basakoli ete babengani batomboki ba M23 na Kibarizo mpe mboka nzinga nzinga na territoire ya Masisi, na Nord-Kivu.

Molobeli ya batombi ba M23, major Willy Ngoma akomi na reaseau social X ete lingomba lya ye lisengi bayi molongo komona ndenge liboke lya baye bazali kobunda na ngambo ya mbulamatari bazali kobebisa na nko misala mya kimya na kobotolaka cite ya Kitchanga mpe na kosalaka bitumba na Kilolirwe.

"ARC (mampinga ma M23) mazali na lotomo ya kobikisa bana yango na banguna baye ba kimya," ebakisi major Ngoma na X.

Na ngambo na yango, FARDC (Mamapinga ma RDC) malobi mazali na bitumba bina te.

Molobeli ya FARDC na Nord-Kivu, lieutenant-colonel Guillaume Ndjike Kaiko alobi na liyebisi ete mampinga ma RDC matosaka mibeko mpe makoki soki moke te kotambola likola lya boyokani ya bakonzi ba bikolo bwa botelemisi bitumba lokola bapelisi moto ba M23/RDF bazali koloba.

RDF ezali mampinga ma Rwanda maye Kinshasa efundaka kobunda na mpobanzi ya batomboki ba M23.

"FARDC ekanisi ete ngonga ekoki mpo ete badongolomeso ba M23/RDF basimba loboko ya bakonzi babikolo ba etuka na komikotisaka na mayele ma précantonnement mpe cantonnement lokola endimamami na bakonzi ba etuka na Luanda mpe Nairobi," ekomi lieut.col. Ndjike.

Forum

XS
SM
MD
LG