Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bobomi ya bandimi ya Wazalendo : Peter Kazadi asengi bokebi mpo mingi na bato bakufaki mabota ma bango mayebani te


Vice-Premier ministre mpe ministre ya Ntey Peter Kazadi, (C) na oyo ya Bobateli ekolo Jean-Pierre Bemba (G2), ministre ya makobi ma bomoto Fabrice Puela (D2) na mokambi ya Nord-Kivu Lt-gen. Constant Ndima na Goma, Nord-Kivu, 04 sanza ya libwa 2023. (ACP)
Vice-Premier ministre mpe ministre ya Ntey Peter Kazadi, (C) na oyo ya Bobateli ekolo Jean-Pierre Bemba (G2), ministre ya makobi ma bomoto Fabrice Puela (D2) na mokambi ya Nord-Kivu Lt-gen. Constant Ndima na Goma, Nord-Kivu, 04 sanza ya libwa 2023. (ACP)

Peter Kazadi, Vice-Premier ministre mpe ministre ya Ntey ya Ekolo Congo démocratique (RDC) asengi bokebi mpo mingi na bato bakufaki mabota ma bango mayebani te ntango eyebana ete Rwanda ekotisa mpe ekotisaka bato bayango na mboka eye mpo na kotia mobulu.

Alimboli ete ba "unités d’élite" ya garde présidentielle nde babetaki masasi na milulu mya bandimi ya lingomba ya Wazalendo mpe ememaki liwa lya bato pene na ntuku mitano mposo moko moleki ; kasi ezalaki mpo bandimi ba Wazalendo balingaki kobotola monduki na soda moko.

Apesaki ndimbola yango na bokutani na bapanzi nsango na masolo molobeli ya mbulamatari Patrick Muyaya asalisaki na Kinshasa o’mokolo mwa misato.

"Soda moko (ya unité spéciale ya garde républicaine) oyo bandimi baye balingaki kotobola monduki ayebaki komikanga te mpe abetaki masasi. Yango nde ememami makambo makomaki," elobaki M. Kazadi.

VPM mpe ministre ya Ntey alobi ete ba unités d’élite babimaki na balala mpo na kotambola mpo bazwaki nsango ete Rwanda etandaki mampinga ma yango na bisika biike na ndelo na RDC wuta mwa mikolo.

"Ba unités baye batambolaki mpo kolakisa na Rwanda ete bamilengeli mpe soki bameki bakomona," elobi M. Kazadi.

Kolanda maloba ma ye, basoda baye bakitaki na esika ya losambo ya ba Wazalendu mpo bazwaki nsango ete ba bandimi ba Wazalendo bakangi pulusu moko mpe babotolaki monduki na ye.

M. Kazadi alobi bandimi ba Wazalendo bazalaki na bibundeli mingi biye bizalaki manduki te.

VPM mpe ministre ya Ntey abakisaki ete baike ba bato bakufaki mabota ma bango mayebani kino sika.

Akundoli ete "Rwanda ekotisa bato mingi na RDC mpe esalaka zunguluke mingi, yango esengeli koyeba na kotala makambo maye," elobi M. Kazadi.

Ba officiers babale mpe basoda banei bazali kosamba na Goma wuta mokolo mwa mibale 05 sanza ya libwa na 2023.

Forum

XS
SM
MD
LG