Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato koleka sambo bakufi na bozindi ya baleinière na Oshwe


Balobi mbisi na ebale ya Congo pene na ba baleinière, Kisangani, etuka ya Tshopo, 01 sanza ya mwambe 2022.
Balobi mbisi na ebale ya Congo pene na ba baleinière, Kisangani, etuka ya Tshopo, 01 sanza ya mwambe 2022.

Koleka bato sambo bakufi, pene na nkama babikisami mpe basusu mingi bazali komonana te na bozindi ya baleniere moko pene o;mokolo mwa mwa mibale (15 sanza ya mwambe 2023) na libongo lya Oshwe na etuka ya Maï-Ndombe.

Motango mwango mopesami na police ya etuka eye, eye elobi ete bolukiluki bwa nzoto to bato bakozwami na bomoi basusu bozali kosalama.

Commissaie principal Martin Naweti alobi bawei bazalaki : mwasi moko, babali basato ya mikolo mpe bana bake basato, kasi abakisi ete motango mwango mokoki kobongwana.

Sango yango endimami mpe na bayi société civile na bakonzi babisi byango.

Kolanda maloba ma bango, Ezalaki balenière na nkombo ya H/B eye ememamki basali mibembo koleka nkama misato mpe ezalaki kokende na Kutu.

Mingi kati na basali mibembo bazalaki nde basali ba l’Etat baye bazalaki kokende mosala na Kutu.

Baleniere yango ezindi na pene na kilometre zomi na libongo ya terrioire ya kutu.

Mokambi ya Nouvelle societe civile ya Oshwe alobi bwato to masuwa eye ezalaki kosala mingi mibembo kati na Oshe na Nioki mbala na mbala, kasi elekisaki nde mokumba ntango ezindaki.

Na sanza ya minei eleki, molobeli ya ndako ya bokeli mibeko ya etuka eye akufaki mpe lokola na bozindi na mayi ma Mfimi mpe nzoto ezwamaki nsima na sanza moko.

Forum

XS
SM
MD
LG