Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Niger: Bayi garde présidentielle bakangi président Mohamed Bazoum


President Mohamed Bazoum na Niamey, 2 sanza ya mitano 2022.
President Mohamed Bazoum na Niamey, 2 sanza ya mitano 2022.

Mokonzi ya mboka Niger Mohamed Bazoum akangami wuta ntongo ya mokolo mwa misato, 26 ya sanza ya mitano 2023, na basoda ba limpinga babatelaka ye.

Bayi ndako ya mosala ya president Mohammed Bazoun basakoli ete bayi garde presidnetielle bakangaki nzela inso emamaka epayi avandaka mpe na nzela ya ndako ya mosala mwa ye.

Basoda bazali koboya kotika ye ata ko bakonzi basusu bazali kosenga bango kotika ye.

Misala mingi mikangami mpe basoda mingi bazali na nzela.

Union Africaine ebengi ekela eye bomeki bokweyisami bokonzi to bomeki Coup d’Etat mpe epameli bayi garde presidentielle na kotiya mobulu na mboka, kolanda maloba ma Mokambi ya Commission ya Union africaine, Moussa Faki na ba reseaux sociaux.

CEDAO, Likita lya nkita lya bikolo ba Afrika bya West, epameli mpe lokola bomeki bokweyisami bokonzi boye mpe esengi ba baye bazali kosala yango kotika mokonzi ya mboka Bazoum na kosengaka eloko te.

Mohamed Bazoum oyo azalaka na boyokani bolamu na France akotaki na bokonzi nsima na kolonga maponami ma 2021 na Niger.

Union eurpeenne, Ekolo France mpe mabongisi masusu mpe bapameli ekela eye ya basoda.

Forum

XS
SM
MD
LG