Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Godé Mpoy alongolami na ebonga ya mokambi ya ndako ya bokeli mibeko na Kinshasa


Godé Mpoy Kadima azali koyanola na mituna ya VOA Lingala
Godé Mpoy Kadima azali koyanola na mituna ya VOA Lingala

Gode Mpoy Kadima akweyisami lelo na ebonga na ye ya moyangeli ya ndako ya bokeli mibeko ya etuka ya Kinshasa.

Bakeli mibeko ba etuka eye ntuku misato na mineyi bandimi mokano ya kokweyisa ye kati na bakeli mibeko ntuku mineyi na moko baye bazalaki na likita lyango. Bokweyisami boye bosalami nsima na bakeli mibeko kopesa Gode Mpoy ngonga ntuku mibale na mwambe mpo na koyanola bofundami basalaki.

Gode Mpoy azalaki te na likita lyango. Bakeli mibeko bazali kopamela ye bokambi mabe mpe bozangi kopamela mbeba ya mbulamatari ya engumba ya Kinshasa.

Bokweyisami bwa ye bosalami ntango etikali kaka sanza motoba yambo na maponami ya mokonzi ya mboko mpe bakeli mibko.

Forum

XS
SM
MD
LG