Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Président ya Ouganda Yoweri Museveni asakoli ete apemi mwa ngonga kozwama na Covid-19


UGANDA-RUSSIA-DIPLOMACY
UGANDA-RUSSIA-DIPLOMACY

Président ya Ouganda Yoweri Museveni, ya mibu 78 , asakoli lelo ete azui "conge forcé" to mwa bopemi moke nsima na kozwama na bokono bwa Covid-19.

“Lobi na ntongo, namonaki bilembo bikokani na grippe ya pete,” ekomi mokonzi ya ekolo na liyebisi na bapanzi sango. Mr. Museveni abakisi ete, test moko oyo asali elakisi ete azali na virus ya Covid-19.

"Bongo namilongoli mpe na pesi mosala na ngai ya lelo mpe ya lobi na Premier ministre Robinah Nabbanja," ebakisi ye.

"Matondo mingi na Nzambe makambo manso mazali malamu, mpe nazali koyoka kaka bilembo ya pete. Nzokande, nalingi kaka kozala na keba mpe komitya na mwa pembeni na ntango eye.” ebakisi lisusu president Museveni.

M. Museveni, moko na bakambi ya kala na mokili, ayangeli mboka na ye Ouganda wuto mibu miyike sika, nsima kozua kiti ya bokonzi na mobu 1986, nsima kobengana na ebonga na ye mokonzi ya kala Idi Amin Dada.

Kasi wuto azua bokonzi, Yoweri Museveni ayebana na kokanga bayi opposition monoko mpe abongola buku likonzi ya mboka na ye mpo na kotikala na kiti ya bokonzi. Na ekolo Ouganda, botungisi bato ba société civile, ba avocats mpe ba activistes ebakisami makasi na mibu miye miwuti koleka, kolanda mangomba mingi ma makoki ya bomoto.

Kolanda ministère ya Santé ya ekolo eye, ekolo Ouganda ezwi ba cas 170.255 ya bokono ya coronavirus mpe 3.632 bakufa wuto ebandeli ya bokono boye na mobu 2020.

Forum

XS
SM
MD
LG