Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bayi ekolo Congo Democratique koleka 10 babomami na bombe na engumba Khartoum na ekolo Soudan


SUDAN-CONFLICT
SUDAN-CONFLICT

Bayi ekolo Congo Democratique koleka 10 babomami o mokolo mwa lomingo loleki na engumba Khartoum na ekolo Soudan, sima mampinga ma ekolo eye kobwaka bombe na Universite epayi wapi bazalaki kotanga esakoli Patrick Muyaya molobeli ya Mbulamatari ya RDC na botangi liyebisi ya ministere ya mambi ya bapaya.

Vice-premier ministre, mpe ministre ya affaires étrangères, Christophe Lutundula ayambaki lobi loleki na ndako na ye ya mosala Molakisi elongi ya Ambassade ya Soudan, mpo na koyebisa ye lolenge mbulamatari ya RDC etelemeli bobomi boye. Christophe Lutundula asengi bongo na bayi ekolo RDC baye banso bazuami na ekolo Soudan, na kokende komitika na Ambassade ya RDC na Caire na Egypte to mpe na Addis Abeba na Ethiopie mpo na kosalisa bango bazonga mboka.

Nzoka nde, tango bitumba biye bibandaka na sanza ya mineyi o biska biye, Mbulamatari ya RDC esakolaka ete, ebandi kobimisa bayi ekolo RDC koleka nkama misato na ndambo baye bazuamaki na ekolo Soudan.

Wuto bitumba biye bibanda, bato koleka nkama mwambe basili bongo kokufa mpe bato million moko bakima bisika na bango bafandaka kolanda manaka ma ONU.

Forum

XS
SM
MD
LG