Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Infatino alaki kokomisa ndembo lisano lya molongo mobimba mpenza, nsima na koponama lisusu na Congrès ya Kigali


Mokambi ya Fifa Gianni Infatino azawi maloba nsima na koponama mpo na kokoba kokamba mabongisi maye ma molongo ma lisano lya ndembo na Kigali, Rwanda, 16 sanza ya misato 2023.
Mokambi ya Fifa Gianni Infatino azawi maloba nsima na koponama mpo na kokoba kokamba mabongisi maye ma molongo ma lisano lya ndembo na Kigali, Rwanda, 16 sanza ya misato 2023.

Gianni Infatino aponami lelo mpo na kotikala na ebonga ya mokambi ya Fifa, Federation ya molongo ya lisano lya ndembo, kino 2027, na maponami masalami na likita lya mbala ntuku sambo na misato ya mabongisi maye ma masano, likita lyango lizali kosalama wuto mikolo misato na Kigali, na Rwanda.

Avocat ya mibu ntuku mitano na mibale, Infatino akotaki na ebonga yango na 2016 nsima na bokweyisami ya Sepp Baltter oyo afundamaka na kaniaka.

"Tozali na mposa ya kobakisa kasi ya kolongola te mimekano (ya masano ma ndembo) na mokili na ntina ya kotombola lisano lya ndembo," elobi Infantino.

Fifa endimi na likita liye lya Kigali, ete Mondial ekoma na ba match 104 wuta 2016 mpe momekano ya ba clubs ezala na ba ekipi 32 na mokili.

Infatino azalaki kaka se ye moko na maponami mango mpe amponami na bobeti maboko ya bato .

Fifa endimaki lobi ete na mondial 2026 bikolo ntuku minei na motoba bikoka kobeta phase finale mpe Afrika ekozala na bikolo libwa to zomi.

XS
SM
MD
LG