Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bibembe mingi bikutami na basaki na Lumbubashi, ekebisi gouv. Kyabula


Bayi pulusu bakangi moto moko na Lubumbashi, RDC, 10 sanza ya zomi na moko 2015.
Bayi pulusu bakangi moto moko na Lubumbashi, RDC, 10 sanza ya zomi na moko 2015.

Moyangeli ya etuka ya Haut-Katanga, Jacques Kyabula akebisi bavandi mpo na lolenge bibembe ya bato bakangama maboko mpe makolo na nsinga bikomi kokutana mikolo miye na basaki mingi na Lubumbashi, engumba mokonzi ya etuka eye.

"Wuto mwa mikolo, misala mya bokengi mimoni ete nzoto ya bato bakufa ezali kokutama mingi, maboko mpe makolo makangama na singa, kati na basaki na suka ya mboka mpe ntango mosusu na ba quartiers epayi bato bavandaka," elobi M. Kyabula na liyebisi asakoli na etando eke.

Mokambi ya Haut-Katanga asengi bana banso ba etuka eye ata ya ngambo nini ya politiki, kofunda moto nyonso amonani malamu te mpo na likambo liye "limonani kozala bobomi boye bozali kokoba".

"Ekela ya lolenge ete ezali likambo lya sika na lisanga na biso mpe esengi biso bango kozala ekenge makasi. Bato baye bazali kosala bobomi boye bwa nsomo mpe mabe, balingi nde misala mya l’Etat mpe mabongisi ma maponami maye mazali kosalama sika," ebakisi M. Kyabula.

Mokambi ya Haut-Katanga abeti sete na mikano mya bokengi miye misalaki kozwama na moyangeli ya engumba Lubumbashi lokola bopekisi ya botambola ya ba taxi-moto kobanda na 22h, mpe bolukiluki ya bayi police.

Bapanzi sango ya Lubumbashi balobi bayi bekengi bandimi ete koleka nzoto mwambe na bisika mingi.

XS
SM
MD
LG