Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sénégal elongi CHAN 2022


Ba Lions ya Teranga ya Sénégal batomboli nkeni mpe maboko nsima na kolonga CHAN 2022 na kopolisaka Algérie na ba tirs au but na stade Nelson Mandela, Alger, 4 sanza ya mibale 2023.
Ba Lions ya Teranga ya Sénégal batomboli nkeni mpe maboko nsima na kolonga CHAN 2022 na kopolisaka Algérie na ba tirs au but na stade Nelson Mandela, Alger, 4 sanza ya mibale 2023.

Ba Lions ya Teranga balongi CHAN 2022 (Championnat ya Afrika ya bikolo mpo na basani bapetaka na continent Afrika) na kopolisaka Algérie, mboka eye eyambaki momekano moye, na ba tirs au but na libanda lya masano Nelson Mandela na Alger.

Algérie na Sénégal bakabolaki 0-0 kino na nsima na ba prolongations to babakisami ya ntango.

Na tirs au but, momekano mwa bobeti ndembo na mongete, Sénégal elongaki na 5-4.

Sénégal esi emonisaki makasi na yango wuto na etapi ya ba groupes ntango ebimaki yambo na groupe B na kolongaka RDC 3-0 mpe bikolo misusu.

Moyambi ya Sénégal nde apesami palata ya moyambi ya malamu koleka na CHAN eye.

XS
SM
MD
LG