Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bayi ekolo Bresil bazali kopesa lelo lokalo ya suka na bobeti ndembo ya kala Roi Pele, oyo akufaki na mibu 82.


FBL-BRAZIL-PELE-DEATH-WAKE
FBL-BRAZIL-PELE-DEATH-WAKE

Bayi ekolo Bresil bazali kopesa lelo lokalo ya suka na bobeti ndembo ya kala Roi Pele, oyo akufaki mokolo mwa mineyi le 29 Decembre na mibu 82.

Mikolo mineyi sima ya liwa na ye bato bayike bamonani kozala na mboka Santos epayi wpi roi Pele akola mpe abanda lisano lya ndembo.

Minute moko ya kimya motalisamaki mpe na milulu mya bozui kiti bwa bokonzi bwa mokonzi wa ekoloo ya sika Luiz Inacio Lula da Silva na engumba Brasilia Mboka mokonzi ya ekolo eye.

Roi Pele oyo abotama na komboo ya Edson Arantes do Nascimento, alekisaki sanza moko na maladi na lopitalo ya Albert Einstein na engumba Sao Paulo kino liwa ezuaki ye o mokolo mwa 29 décembre, sima kobela makasi na bokono bwa cancer ya côlon, kolanda manaka ma ba minganga ba ye.

XS
SM
MD
LG