Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Roi Pelé mokonzi ya ndembo akufi na mibu tuku mwambe.


FILES-FBL-BRAZIL-PELE-HEALTH
FILES-FBL-BRAZIL-PELE-HEALTH

Roi Pelé, mokonzi ya ndembo ya Brésil oyo alongaki record misato ya Coupes du monde mpe akomaki moko na bato ya masano oyo bazalaki na bokonzi mingi na ekeke eleki, akufi lelo mokolo mwa mineyi. Roi Pele oyo abotama na kombo ya Edson Arantes do Nascimento Azalaki na mbula 82.

Mokumbi bendele ya “lisano kitoko” azalaki na bokono bwa kancer ya estomac wuto mobu 2021. Akɔtaki lopitalo wuto sanza eleki mpo na koluka lisungi.Bato bayike bayebi ye lokola moko ya basani minene ya ndembo, o molongo. Pelé alekisaki pene na mibu tuku mibale yo kosepelisa balingi ba masano ma ndembo o mokili mobimba. Mikolo mileki, Roi Pélé akomaki ambassadeur mondial mpo na sport. Mosani oyo bakobenga ye “Mokonzi” ya ndembo ayebanaki na mokili mobimba kaka ntango azalaki na mibu 17 na Coupe du monde ya 1958 na ekolo Suède. Na ntango wana, Pele azalaki mosani oyo aleki na bolenge, na basani banso, nsima na kotiya ba buts mibale na elonga ya Brésil 5-2 na mboka oyo eyambaki finale yango.

Elilingi ya Pelé na maillot ya langi ya jaune ya Brésil oyo ezali kongenga na yango, na elembo ya No. 10 na mokongo, etikali na bomoi epai ya bato oyo balingaka ndembo bisika binso na mokili. Lokumu ya Pelé ezalaki tellement que na 1967 ba binemi mibale ba bitumba na ekolo Nigeria bandimaki kotika bitumba mpo na mwa tango moke mpo ete akoka kosala match d’exposition na mboka Nigeria.

Bomoi bwa Pelé sima ya ndembo ezuaki ba formes ebele. Azalaki politician, Ministre extraordinaire ya Brésil mpo na sport, mosali ya mombongo ya bomengo, mpe ambassadeur ya UNESCO mpe Nations Unies. Azwaki mpe ba rôles na ba films, ba telenovelas mpe asala ba nzembo mpe a enregistraki ba CD ya miziki ya Brésil oyo eyebani mingi. Lokola kolongono bwa nzoto na ye ezalaki kobeba, mibembo mpe komonana na ye ekómaki lisusu mingi te. Azalaki kutu te na molulu ya kofungola ekeko na ye oyo azalaki momonisi ya ekipi ya Coupe du Monde ya 1970 ya Brésil. Pelé alekisaki mibu 80 ya mbotama na ye, ye moko elongo na mwa bato ba libota na ndako moko ya libongo.

Pele abotami na kombo ya Edson Arantes do Nascimento, na engumba Tres Coracoes na kati ya etuka ya Minas Gerais le 23 oct. 1940, Pelé akolaki kongenga sapato mpo na kosomba biloko na ye ya ndembo ya moke. Ba Talents ya Pelé ya ndembo ebenda ntango azalaki na 11 ans, mpe joueur professionnel moko ya mboka amemaki ye na ba équipes ya bilenge ya Santos. Ezwaki ntango molai te mpo akóma na équipe ya ba seniors. Kombo ya Pelé ewutaki na ye moko lokola azalki ko koka prononcer te kombo ya joueur moko na kombo ya Bilé.

Akendaki na Coupe du monde 1958 en tant que réserve kasi akomaki joueur ya motema mpo na équipe ya championnat ya mboka na ye. But na ye ya yambo, oyo abwakaki bale likolo ya motó ya défenseur mpe akendeki mbangu zingazinga na ye eponama lokola moko ya ba buts malamu koleka na lisolo ya Coupe du Monde.

XS
SM
MD
LG