Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba soda mwambe mpe civil moko bazui etumbu ya liwa mpo na bobomi bwa bayi ekolo Chine babale.


DRCONGO-CRIME
DRCONGO-CRIME

Ba soda mwambe mpe civil moko bazui etumbu ya liwa mpo na bobomi bwa bayi ekolo Chine babale mpe bopengwisi minduki ya bitumba oyo esengelaki kosala misala ya mampinga na engumba Bunia na Est ya République démocratique du Congo

Na kati ya ya bato baye ba colonels babale, basoda misato basusu mpe civil moko bazwaki etumbu ya liwa o mokolo mwa lobi mpo na bobomi bwa basali babale ba wolo ba ekolo Chine. Ba colonels baye babale bazali Mukalenga Tsendeko mpe Kayumba Sumahili. Bafundamaki na kobongisa kokotela mituka miye mizalaki komema bayi ekolo Chine baye babale na mabanga ya wolo mpe mosolo pene na ba dollars nkoto motoba moye bazalaki na yango mokolo wana na motuka na territoire ya Irumu o etuka ya Ituri o mokolo. mwa le 17 mars ya mobu 2022. Bayi ekolo Chine baye babomamaki mpe mokumbi motuka na bango civil azokaki.

Basoda misato mosusu baye bakatelaki etumbu ya boloko ya mibu zomi kaka mpo na likambo yango balongolami na etumbu.

Bosengeli koyeba ete Etumbu eye ya liwa epesamaka mbala na mbala na République démocratique du Congo kasi ebongwanaka na ndenge ya système ya boloko ya bomoi mobimba.

XS
SM
MD
LG