Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Vidiye Tshimanga mopesi toli ya lokumu ya kala ya Felix Tshisekedi oyo akangamaka mpo na kanyaka atikami.


Vidiye Tshimanga, close collaborator of Felix Tshisekedi
Vidiye Tshimanga, close collaborator of Felix Tshisekedi

Vidiye Tshimanga mopesi toli ya lokumu ya Felix Tshisekedi oyo akangamaka mikolo mileki mpo na kanyaka atikami na tribunal de paix ya Kinshasa-Gombe lelo mokolo mwa mitano esakoli mosambeli to avocat wa ye Me Clément Ilunga.

Vidiye Tshimanga afundamaka mokolo mwa le 14 Novembre moleki nsima video moko eye ebimaka na réseaux-sociaux epayi wapi bato batyelaki ye motambo na na ko filmaka ye. Na kati ya video wana Vidiye tshimanga azalaki kosenga kanyaka na bato baye bakosaki ye ete bazali bayi mombongo baye balingi koya kosala mosala na bango na ekolo RDC.

Afundama na kozala na makambo ya kanyaka, bozangi botosi na mokonzi wa ekolo mpe kosalela kozala mpene ya mokonzi mpo na koluka kosala makambo ma mayuya. Atyama na boloko mikolo motoba mpo na makambo maye nsima ye kotikama mpo na mwa tango moke. Kino sika, Mr. Tshimanga awanganaka kozala sima ya makambo maye, mpe asakola ete ezali nde banguna ba ye nde basalaki makambo maye mpo na kokweyisa ye.

XS
SM
MD
LG